Martin Fayulu, Kinshasa, RDC, 8 janvier 2019. (Facebook/Emmanuel Bikalu)

Opposant Martin Fayulu oyo akokobi koloba ete apomanaki na RDC, asengi na bokomi na ye Bruxelles, na Belgique, ete mokano ya peuple congolais etosama.

Le peuple d’abord (peuple liboso), elingi koloba ete batosa mokano ya bana ya Congo, eyanoli Martin Fayulu, na motuna moko ntango ya bokutani na ba Congolais ya libanda mpe bapanzi sango na université ya Vrije na Bruxelles.

Le peuple d’abord, ezali slogan bato bayembela president Felix Tshisekedi, , mokonzi asakolamaki na maponami ya le 30 decembre 2018.

Martin Fayulu akomaki na ntongo ya mokolo ya mposo na Bruxelles mpe ayambamaki na bato bayike.

​Lisolo ya mboka na biso ezali kokoma. Bana ya Congo bayebi ete bomoko na biso tokoki kokakola yango te. Tokokoba kosenga bosolo ya maponami mpo na kotonga Congo moko ya lokumu mpe ya kofulukisama, eyebisi Martin Fayulu na bokomi na ye na libanda ya pepo ya engumba mokozi ya Belgique.

Mpo na ye, mokonzi ya kala Joseph Kabila abatami na elongi ya Felix Tshisekedi.



Avec VOA Afrique

Laisser un commentaire

Your email address will not be published.

For security, use of CloudFlare's Turnstile service is required which is subject to the CloudFlare Privacy Policy and Terms of Use.

I agree to these terms.

Ce site utilise Akismet pour réduire les indésirables. En savoir plus sur comment les données de vos commentaires sont utilisées.