Président Félix Tshisekedi na masolo na Sous-secrétaire d’Etat ya ekolo ya Amerika mpo na mambi ya Afrika, Peter Tibor Nagy, na Kinshasa, RDC, le 15 mars 2019. (Twitter/Présidence RDC)

Sous-secrétaire d’Etat ya ekolo ya Amerika mpo na mambi ya Afrika, Peter Tibor Nagy, akutani na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi, na Kinshasa.

M. Nagy ayebisi mpe ete Etats-Unis apesi mpe matoyi mpo koyoka ngambo inso ya politiki.

Topesaki bana ya Congo losako mpo na bozali na bango na maponami, topesaki solo longonya na mokonzi Félix Tshisekedi nsima na elonga na ye kasi tozali koyoka mpe baye ya opposition na maye bazali na yango, elobi M. Nagy liboso ya bapanzi sango.

Lobi moleki, asololaki na basungi ya likolo (ba Hauts Conseillers) ya président Félix Tshisekedi baye bakambamaki na Vital Kamerhe, directeur ya cabinet ya mokonzi ya mboka.

Peter Tibor Nagy akutanaki mpe na baye ya société civile mpe basalolaki mpo na nzela ya kopesa maboko na M. Tshisekedi.

Azalaki lobi na Goma epayi wapi apesaki koleka 1.800 tonnes ya bilei mpe bisaleli ya komibatela ntango ya kopesa mino na babeli ya Ebola.

Sous-secrétaire d’Etat ya ekolo ya Amerika mpo na mambi ya Afrika alobaki mposo ete ekolo na ye esepeli kosala na gouvernement ya mokonzi abimi na maponami ya RDC, Félix Tshisekedi.



Avec VOA Afrique

Laisser un commentaire

Your email address will not be published.

For security, use of CloudFlare's Turnstile service is required which is subject to the CloudFlare Privacy Policy and Terms of Use.

I agree to these terms.

Ce site utilise Akismet pour réduire les indésirables. En savoir plus sur comment les données de vos commentaires sont utilisées.