Bakonzi ya bikolo RDC, Félix Tshisekedi (droite), ya France, Emmanuel Macron (gauche), ya Kenya, Uhuru Kenyatta (na kati), bakutanaki na 4e session ya Assemblée générale ya ONU mpo na environnement (bonzinganzinga/mokili), One Planet, na Nairobi, Kenya, 1

Mokonzi ya ekolo France asengi na mokokani wa ye ya RDC kosala gouvernement liye likozala na kati na baye ya Martin Fayulu mpe na ya Moïse Katumbi.

Bakonzi ya bikolo RDC, Félix Tshisekedi, ya France, Emmanuel Macron, ya Kenya, Uhuru Kenyatta, bakutanaki na 4e session ya Assemblée générale ya ONU mpo na environnement (bonzinganzinga/mokili), One Planet, na Nairobi, Kenya.

Kolanda baye ya nzinganzinga ya bakonzi ya France na ya RDC, na masolo na bango, Emmanuel Macron esangaki na Félix Tshisekedi kosala gouvernement ya kofungolama oyo ekozala na baye ya Martin Fayulu na Moïse Katumbi.

Basolaki mpe mpo na mandat ya sika ya Monusco.

Martin Fayulu, moko na ba candidat ya maponami ya mokonzi ya mboka, ya le 30 décembre moleki, akobi na koloba ete ye nde alongaki mpe azali kosenga kobandela maponami to kobandela botangi ya bilembo.

« Kasi baye ya nzinganzinga ya mokonzi Macron balobi: « mpo na France, maponami makoki kobandelama te. Totali kaka ndenge Tshisekedi asakolamaki molongi kasi ye esengeli atalisa ete ye nde azali kolakisa mbongwana ».



Avec VOA Afrique

Laisser un commentaire

Your email address will not be published.

For security, use of CloudFlare's Turnstile service is required which is subject to the CloudFlare Privacy Policy and Terms of Use.

I agree to these terms.

Ce site utilise Akismet pour réduire les indésirables. En savoir plus sur comment les données de vos commentaires sont utilisées.