Prix Nobel ya kimya ya mboka RDC, Dr. Denis Mukwege na Bukavu, Sud-Kivu, 27 décembre 2018.

Prix Nobel ya kimya ya mboka RDC, Dr. Denis Mukwege asengi na président Félix Tshsiekedi koboya « koteka elikya » ya bana ya mboka na ye, ata asali boyokani na mokitani wa ye Joseph Kabila.

« Ata signature ya boyokani kati na lingomba na bino ya politique Cap pour le changement (cach) mpe liye ya mokonzi ya mboka ya kala, Front commun pour le Congo (FCC) mozali, ntango eleki te mpo na osalamu », ekomi Dr. Mukwege na liyebisi.

O’mokolo ya misato moleki, baye ya Tshisekedi na baye ya Kabila batiyaki manzaka na mokanda ya boyokani mpo na kokonza mboka elongo.

Mokambi ya UDPS mpe Cach mpo na mwa ntango, Jean-Kabund, mpe oyo ya FCC, Néhémie Mwilanya, basengaki (na mokanda ya boyokani), na « Joseph Kabila kopona mosali ya gouvernement mpe na Félix Tshisekedi ko nommer ye ».

Balobaki ete bandimi ete FCC eleki na ba ntoma na Assemblée nationale mpe ba provincials.

« Esengeli na yo (Félix Tshisekedi) koboya koteka elikya ya mbongwana ya solo mpe ya bozindo ya bana ya Congo, » atieyi mokoloto Dr. Mukwege.

Kasi mangomba bayike ya makoki ya bomoto balobi ete boyokani liye ebuki Mobeko likonzi mpo esengelaki yango kotiya Informateur to moluki na majorit130.



Avec VOA Afrique

Laisser un commentaire

Your email address will not be published.

For security, use of CloudFlare's Turnstile service is required which is subject to the CloudFlare Privacy Policy and Terms of Use.

I agree to these terms.

Ce site utilise Akismet pour réduire les indésirables. En savoir plus sur comment les données de vos commentaires sont utilisées.