Président Joseph Kabila, na loboko ya mwasi, apesi mbote na mokitani na ye Félix Tshisekedi, na Palais de la nation, Kinshasa, 25 janvier 2018.

Na volant ya motuka na ye, président Joseph Kabila atiki Palais de la nation nsima ya remise et reprise (bopesani ya mikanda) na mokonzi ya sika ya RDC, Félix Tshisekedi.

Bakonzi mibale baye bayambanaki na nsima milulu maye, na maboko ba sungi na bango babetelaki bango. Mpe Kabila akotaki na motuka mpe amemaki yango ye moko. Atiki bongo ndako ya bokonzi ya RDC.

« Na zali malamu. Ezalli komonana. Na wuti kobima na bokutani ya bolayi mingi… Nazali mpenza nzoto malanu, » eyanoli Félix Tshsiekedi na motuna ya panzi sango.

Mokolo moleki, na milulu ya bozuwi bokonzi, Félix Tshisekedi azwaki mwa nkwokoso. Akokaki lisusu kotanga te mpe avandaki minutes 12 yambo azongela discours na ye.

Basungi na ye balobaki ete ezalaki gilet prae-balle, mulunge mpe kolemba nde esalaki ndenge wana.

Na motuna kolanda bosengi na bato bayembaki « Tata alobaki : ‘peuple, d’abord’ », Félix Tshisekedi alobi akosalana na yango nde nzela akolanda na bokonzi na ye.



Avec VOA Afrique

Laisser un commentaire

Your email address will not be published.

For security, use of CloudFlare's Turnstile service is required which is subject to the CloudFlare Privacy Policy and Terms of Use.

I agree to these terms.

Ce site utilise Akismet pour réduire les indésirables. En savoir plus sur comment les données de vos commentaires sont utilisées.